- Ndako
- Misala ya kosala
- Nsango
Misala oyo epesami.
Soins médicaux mpo na ba victimes ya torture to babiki, oyo bakoki ko présenter na ba effets physiques oyo mingi mingi ebandi na ba effets ya ebandeli tii na sima. Biso, na yango tozali kotambwisa Centre médical Ambulatoire na ba professionnels ya santé oyo bayebi mosala malamu kati na bango Minganga, ba infirmiers, mpe ba Physiothérapeutes. Bazali kolobela lisalisi ya nokinoki, ya kozongisama na nzoto, ya ntango molai, ya diagnostic, ya kosilisa mpasi, mpe ya nkisi.
Santé ya makanisi mpe lisungi ya psychosocial - Lokola mbano ya Minyoko / Mobulu, ezala ya nzoto, ya mayoki, ya kosangisa nzoto, to ya makanisi, babiki bakoki kozala na bilembo ya makanisi.
Tozali na équipe ya ba psychologues mpo na kopesa ba services ya toli oyo ebongi. Mosala ya bomoi ya bato - na nzela ya ba interventions ndenge na ndenge ya kobikela, basali ya bomoi ya bato bapesaka nzela na babiki na kobongisa lolenge ya bomoi na bango, kozongisa elikya oyo ebungaki, kotonga lisusu boyokani na bato, kozongisa bomoi ya tina, mpe kolendisa bosangisi ya baimboka.
Lisalisi ya mibeko - ACTV ekomisami na Conseil ya mibeko ya Ouganda lokola Mopesi ya Service ya Lisalisi ya Mibeko mpo na kopesa Lisalisi ya Mibeko na bato bazangi; na kotalela mingimingi bato oyo babikaki na minyoko, mobulu (mobulu ya kosangisa nzoto, ya nzoto, ya makanisi, mpe ya lolenge mosusu).
Critères ya qualification.
Esika ya libateli mpe ya moto ye moko mpo na toli ya moto na moto
Esengeli te kozwa rendez-vous.
Kokoba kolanda mpo na kozala na ntembe te ete ozwi lisalisi oyo osengeli na yango.
Misala oyo ezali mpo na babiki na lolenge nyonso ya mobulu mpe minyoko
Bokoki ya kozwa yango
Bokutana na biso na ligne na biso ya ofele 0800202791
Bangonga ya botali ezali ndenge moko mpo na misala nyonso.
Mopesi lisalisi asalaka botali na ndako mpo na kolandela bokoli ya mobeli.
Ba services nionso oyo etangami ezali ofele.
Bato oyo basalaka na esika yango balobaka Lingelesi, Swahili mpe Luganda
Mikolo ya kotala mpe Ntango
Lundi ti jeudi 8:00am - 17h00
Mokolo ya mitano 8:00am - 15h00
Bisika yango ekangamaka na mikolo ya konje.
Adresi.
Off Gayaza Rd, Nzela ya Kanyanya, Bloc 207, Kampala, Ouganda
Off Gayaza Rd,Kanyanya Rd, Block 207, Kampala, Uganda